Kinsásá

From Wikipedia

Engumba / Etúká ya Kinsásá
Esé Kongó-Kinsásá Kongó-Kinsásá
Engumba Mokonzi La Gombe
Moyángeli M. Baudouin Liwanga
Nkótá ya ekólo Lingála
Etando 9 965 km²
Mito estimée 7 500 000 hab.
(2005)
Bato na etando 752,63 hab./km²
ISO 3166-2 CD-KN
Badepité 59
Localisation
image:DCongoKinshasa.png
Komini mpé Territoires - Bingúmba - Bitúká


Mbóka tǒ engumba Kinsásá —ekokí kotangema KinshásáKisásá— (eye eyébénákí kala o nkómbó Léopoldville) ezalí mbóka-mokonzi ya Kongó-Kinsásá. Ezalí mpé etúká (province) ya ekólo êná. Ezalí engumba monɛ́nɛ, na efúku 8 ya bato (est.). Elɔngɔ́ na nyɔ́nsɔ óyo, Kinsásá ezalí engumba ya míbalé na bingumba nyɔ́nsɔ ya mokili, na elobelí lifalansé, na sima ya engumba Pari (Falansia), mpé ezalí o káti ya bingúmba minɛ́nɛ koleka ya Afríka o nsé ya Sahara.

Etápe

[kobalola] Jyografi

Ekútání na mabelé o loboko-ya-mwǎsí ya Ebale ya Kɔ́ngɔ. Na yangó etálání pɛnɛ-pɛnɛ mpénza na Brazzaville, mbóka-mokonzi ya Republiki ya Kɔ́ngɔ tǒ mpé Kongó-Brazzaville. Kinsásá ekútání na 4°16' Sud, 15°17' Esita (-4.2667, 15.28333).

Bisíká minɛ́nɛ ya êná engumba :

  • Cité de l'OUA, ndáko ya Bulamatari ya Kongó-Kinsásá
  • Matonge, óyo eyebaní mokili mobimba mpɔ̂ na malɛki-butu na yangó
  • Komini ya Gombe.

Engumba óyo ezalí na mǎto ya ebale tǒ mpé baferry na esɛ́mɛlɔ ya Beach Ngobila mpɔ̂ na kokɛndɛ Brazzaville na Bangi, na nzelá-masíni ’te na Matadi, elongo na Aleopori ya Ndjili.

Bilóko minɛ́nɛ óyo emɔ́nɔnɔkɔ míngi ezalí Buludingi ya SOZACOM, Hotel Inter-Continental na Hotel Memling, Zándo monɛ́nɛ ya Kinsásá, Mizé ya Kinsásá na Académie des Beaux-Arts. Bulevale ya 30 Juin ndé ekangasí biténi nyɔ́nsɔ ya êná engumba.

[kobalola] Bato

Bato ba Kinsásá
Mobú Bato
1920 1 600
1936 40 300
1938 35 900
1939 42 000
1947 126 100
1957 299 800
1959 402 500
1968 1 052 500
Année Bato
1970 1 323 000
1974 1 990 700
1976 2 443 900
1984 2 664 309
1991 3 804 000
1994 4 655 313
2005 7 500 000
2015 est. 12 000 000
Source: Populstat, World Gazetteer


[kobalola] Lisapo

Lipopo (Léopoldville) na  Stanley Pool (Malebo Pool) ya Bonkámá ya 19.
Lipopo (Léopoldville) na Stanley Pool (Malebo Pool) ya Bonkámá ya 19.
  • Bonkámá ya 16–19, nzinga ya Malebo Pool ezalí na zándo tǒ wɛnzɛ inɛ́nɛ, bato batɛ́kɛ́kí mpé batɛ́kísákí míngi mpɛ́mbɛ́, bilɔ́kɔ mpé baúmbu.
  • 1881 «traité de l’amitié» (Henry Morton Stanley na Ngaliema)
  • 1898 Nzelá-masíni ya Matadi (CFC)
  • 1929 mbóka-mokonzi ya Kɔ́ngɔ-Bɛlɛzi (1929-1960) na ya Republiki ya Kɔ́ngɔ (1960-1966)
  • 1966 Lipopo akómí « Kinsásá » o mokɔlɔ 30 ya sánzá ya motóbá


[kobalola] Molungé mpé mbúla

Moyennes de température et de précipitations
Min.
(°C)
Max.
(°C)
Pluie
(mm)
yanwáli 21 31 135
febwáli 22 31 145
mársi 22 32 196
apríli 22 32 196
máyí 22 31 159
yúni 19 29 8
yúli 18 27 3
augústo 18 29 3
sɛtɛ́mbɛ 20 31 30
ɔkɔtɔ́bɛ 21 31 119
novɛ́mbɛ 22 31 222
dɛsɛ́mbɛ 21 30 142
* Sources : BBC Weather


[kobalola] Bilílingi


[kobalola] Nkásá-web o libándá Wikipedia

[kobalola] Tálá mpé


Bɛndɛ́lɛ ya Kinsásá Bakomini ya engumbá Kinsásá Bɛndɛ́lɛ ya Kinsásá
Bandalungwa | Barumbu | Bumbu | Gombe | Kalamu | Kasa-Vubu | Kimbanseke | Kinsenso | Kinsásá (komini) | Kintambo | Kisenso | Lemba | Limete | Lingwala | Makala | Maluku | Masina | Matete | Mont Ngafula | Ndjili | Ngaba | Ngaliema | Ngiri-Ngiri | Nsele | Selembao


Bɛndɛ́lɛ ya Kongó-Kinsásá Bitúká bya Kongó-Kinsásá Kongó-Kinsásá

Bandundu · Bas-Congo · Ekwatéli · Kasai-Occidental · Kasai-Oriental · Katanga · Kinshasa · Maniema · Nord-Kivu · Orientale · Sud-Kivu


Óyo ezalí ndámbo. Okokaka kosálisa mpé kobalusa.