Kinsásá

From Wikipedia

Engúmba / Etúká ya Kinshasa
Esé Republiki ya Kɔ́ngɔ Demokratiki Kɔ́ngɔ (RKD)
Engúmba Mokonzi La Gombe
Gouverneur M. Kimbembe Mazunga
Nkótá ya ekólo Lingála
Etando 9 965 km²
Mito estimée 7 500 000 hab.
(2005)
Bato na etando 752,63 hab./km²
ISO 3166-2 CD-KN
Nombre de députés
de la province
59
Localisation
image:DCongoKinshasa.png
Communes et Territoires - Villes - Provinces


Mbóka tô engúmba Kinsásá —ekokí kotangemene Kinshásá— (óyo eyebenákí kala o nkómbó Léopoldville) ezalí mbóka-mokonzi ya Repubiliki ya Kɔ́ngɔ Demokratiki. Ezalí mpé etúká (province) ya ekólo êná. Ezalí engúmba monɛ́nɛ, na milioni 8 ya bato (est.). Elongo na nyɔ́nsɔ óyo, Kinshasa ezalí engúmba ya míbalé na bingumba nyɔ́nsɔ ya mokili, na elobelí lifalansé, na sima ya engúmba Pari (Falansia), mpé ezalí o káti ya bingúmba minɛ́nɛ koleka ya Afrika o nsé ya Sahara.

Etápe

[kobalola] Jyografi

Kinshasa, Kongo, 2001
Enlarge
Kinshasa, Kongo, 2001
Esika ya bapark ya bulevale ya 30 Yuni, Kinshasa, Kongo, Avrili 2003
Enlarge
Esika ya bapark ya bulevale ya 30 Yuni, Kinshasa, Kongo, Avrili 2003


Ekútání na mabele o loboko-ya-mwǎsí ya Ebale ya Kɔ́ngɔ. Na yangó etalaní pɛnɛ-pɛnɛ mpenza na Brazzaville, mbóka-mokonzi ya Republiki ya Kɔ́ngɔ tǒ mpé Kɔ́ngɔ-Brazzaville. Kinshasa ekútání na 4°16' Sud, 15°17' Este (-4.2667, 15.28333).

Bisíká minɛ́nɛ ya êná engúmba: Cité de l'OUA, ndáko ya Bulamatari ya Kɔ́ngɔ-Kinshasa; Komini ya Matonge, óyo eyebaní mokili mobimba mpɔ̂ na malɛki-butu na yangó; komini ya Gombe. Engúmba óyo ezalí na mǎto ya ebale tǒ mpé baferry na esɛ́mɛlɔ ya Beach Ngobila mpɔ̂ na kokɛndɛ Brazzaville na Bangi, na nzéla-masinu ’te na Matadi, elongo na Aleopori ya N’djili.

Bilóko minɛ́nɛ óyo emonanaka míngi ezalí Buludingi ya SOZACOM, Hotel Inter-Continental na Hotel Memling, Zando monene ya Kinshasa, Mizé ya Kinshasa na Académie des Beaux-Arts. Bulevale ya 30 Juin ndé ekangasí biténi nyɔ́nsɔ ya êná engúmba.

[kobalola] Bato

Évolution de la population de Kinshasa
Année Bato
1920 1 600
1936 40 300
1938 35 900
1939 42 000
1947 126 100
1957 299 800
1959 402 500
1968 1 052 500
Année Bato
1970 1 323 000
1974 1 990 700
1976 2 443 900
1984 2 664 309
1991 3 804 000
1994 4 655 313
2005 7 500 000
2015 est. 12 000 000
Source: Populstat, World Gazetteer

[kobalola] Historia

Image of Kinshasa and Brazzaville, taken by NASA
Enlarge
Image of Kinshasa and Brazzaville, taken by NASA

[kobalola] Media

[kobalola] Climat

Moyennes de température et de précipitations
Min.
(°C)
Max.
(°C)
Pluie
(mm)
Yanuari 21 31 135
febuari 22 31 145
mársi 22 32 196
apríli 22 32 196
mai 22 31 159
yúni 19 29 8
yúli 18 27 3
ogusiti 18 29 3
septembere 20 31 30
ɔkɔtɔ́bɛ 21 31 119
novɛ́mbɛ 22 31 222
desembere 21 30 142
* Sources : BBC Weather


[kobalola] Nkásá-web o libándá Wikipedia

[kobalola] Tálá mpé


Bɛndɛ́lɛ ya Kinsásá Bakomini ya engumbá Kinsásá Bɛndɛ́lɛ ya Kinsásá
Bandalungwa | Barumbu | Bumbu | Gombe | Kalamu | Kasa-Vubu | Kimbanseke | Kinsenso | Kinsásá (komini) | Kintambo | Kisenso | Lemba | Limete | Lingwala | Makala | Maluku | Masina | Matete | Mont Ngafula | Ndjili | Ngaba | Ngaliema | Ngiri-Ngiri | Nsele | Selembao


Bɛndɛ́lɛ ya Repubiliki ya Kɔ́ngɔ Demokratiki Bitúká bya Kɔ́ngɔ-Kinshasa Repubiliki ya Kɔ́ngɔ Demokratiki

Bandundu · Bas-Congo · Ekwatéli · Kasai-Occidental · Kasai-Oriental · Katanga · Kinshasa · Maniema · Nord-Kivu · Orientale · Sud-Kivu


Óyo ezalí ndámbo. Okoka kosálisa mpé kobalusa.